Buku moke «Siansi ya Klisto (Christian Science) ezali nini?»

Buku moke oyo ya sika, ezali kopesa nse ya ndako ya mateya ya Nzambe mpe ya kosalela mateya yango, na lolenge ya Siansi ya Klisto (Christian Science), lokola mpe misala ya Eklezia ya Yambo ya Klisto, Mosiantisito, na babuku ebimisa. Na nzela ya inteleneti, okoki kozua yango mpe kobatela yango na kati ya masini na yo ya inteleneti, kobimisa yango na lonkasa ya monkanda, mpe kokabola yango na basusu.

Na ntang’oyo, buku moke wana es’i ekomama na minoko Lingala, Angele, DzamaniEspaniolaKi-alaboKi-danwa, Ki-detshi, Ki-geleki, Ki-igboKi-iluko, Ki-indonesien, Ki-italienKi-japonéKi-koreen, Ki-polone, Ki-risi, Ki-sinwa ya bokoko, Ki-sinwa ya pete, Lifalanse, Putulugesi.

Okokuta na nse mitindo mpona kozua mpe kobatela na kati ya masini ya inteleneti na yo, na mpe kobimisa na lonkasa ya monkanda, buku moke wana, na lolenge ya bonene mibale (A4 na lettre US), mpe na langi to moindo na pembe.

Babuku mike es’i ebongisama na lolenge ya

Ndenge nini kozua mpe kobatela na kati ya masini ya inteleneti, na mpe kobimisa na lonkasa ya monkanda.

Mpona kobimisa na lonkasa ya monkanda, na lolenge ya bonene A4 to lettre US, na ndako to na esika basalaka mosala wana:

  1. Tambwisa likonga mpe mema yango likolo ya nkombo ya ebombamelo PDF, mpe fina buto na mosapi mpona kozua mpe kobatela yango na kati ya masini ya inteleneti na yo.

  2. Fungola ebombamelo PDF. Soki ebombamelo efungwami tè, mema likonga awa mpe fina buto na mosapi mpona kozua mpe kobatela na kati ya masini nay o ya inteleneti Adobe Acrobat Reader (Motangi ya lotiliki), mpona ebombamelo PDF ekoka kofungwama.

  3. Bakisa mayebisi etali yo (lokola: Etapi ya Eklezia-Mama okendaka, Ndako mpo ya Botangi okendaka, to makambo ya moto mosusu), nakofinaka buto na mosapi mbala mibale, ntango osili komema likonga na esika ya engwongolo ya mpamba bakoma na likolo «Tala makambo mosusu koleka». Koma makambo nionso osepeli ebima na lonkasa ya monkanda nzela moko na buku moke.

  4. Bimisa elili ya buku moke na lonkasa ya monkanda ya bonene elongobani (A4 to lettre US); tia na lomeko na 100%, mpe kotisa motindo ete mosala esalema na bapanzi nionso mibale ya lonkasa ya monkanda.

  5. Gumba na biteni misato lonkasa ya monkanda obimisi. Okokomisa eteni ya yambo, esika bakomi «Siansi ya Klisto (Christian Science) ezali nini?», ezipeli ya buku moke, mpe eteni oyo bakomi «Mosala moko ya Nzambe ya lobiko na nzela ya Elimo», ekozala yakokangama na kati kati, na nse ya ezipeli.

  6. Soki obimisi buku moke na lonkasa ya monkanda, na ndako to na esika moko mosala ezali ya motuya tè, mikanda ya buku moke ekozala na mua nzela moko ya pembe na pembeni. Esalaka na yango bongo.

Mayebisi mpona bato ya mosala ya kobimisa na lonkasa ya monkanda:

Lolenge ya Ebombamelo: Adobe PDF
Balangi: CMYK
Bonene: A4 to lettre US
Bobimisi Lonkasa ya Monkanda: Bapanzi mibale
Eteni Misato